Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 26:11 - Mokanda na Bomoi

11 Banganga-Nzambe mpe basakoli balobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Moto oyo asengeli kokufa, pamba te asakoli mabe mpo na engumba oyo. Bino moko boyoki yango na matoyi na bino ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 26:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai ; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te ! Tika ete balenga liboso na Yo ! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.


Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »


Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.


Bokanisi nini mpo na yango ? Bazongisaki : — Abongi na kufa.


Bazongiselaki ye : — Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.


Bayuda balobaki na molende nyonso : — Tozali na Mobeko ; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe.


Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki : — Bolongola ye na mokili ! Asengeli te kozala na bomoi !


Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.


Bato ya engumba balobaki na Joasi : — Bimisa mwana na yo ya mobali. Asengeli kokufa. Pamba te ye moto apanzi etumbelo ya nzambe Bala mpe akati ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ