10 Tango bakalaka ya Yuda bayokaki makambo oyo nyonso, balongwaki na ndako ya mokonzi, bakendeki na Tempelo ya Yawe mpe bavandaki liboso ya Ekuke ya Sika ya Tempelo ya Yawe.
Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe.
Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
Tango mokonzi Yeoyakimi elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bakambi bayokaki maloba ya Iri, balukaki koboma ye. Kasi tango Iri ayokaki yango, abangaki makasi mpe akimaki na Ejipito.
Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali,
Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.
Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.