mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi na tina na bato nyonso ya Yuda, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi, mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mobu moko na bokonzi.