Jeremi 25:6 - Mokanda na Bomoi6 Bolanda banzambe mosusu te, bosalela mpe bofukamela yango te ; bopelisa kanda na Ngai te na nzela ya banzambe ya bikeko oyo maboko na bino esali, mpe Ngai nakomonisa bino pasi te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.