Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bazalaki koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino abongola motema, atika nzela mpe misala na ye ya mabe ; pamba te ezali na nzela wana nde bokoki kowumela na mokili oyo Yawe apesaki bino mpe batata na bino, wuta kala, mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:5
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »


Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso !


Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, okovanda na mokili mpo na libela ;


Bomisukola mpe bomipetola, bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai ! Botika kosala mabe !


bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango ; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi ; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo.


Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›


Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.


« Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;


nakotika bino ete bowumela na esika oyo, kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino wuta kala mpe mpo na libela.


Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te !


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.


Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ