33 Na tango wana, bato oyo Yawe akoboma bakozala bisika nyonso, longwa na songe moko kino na songe mosusu ya mokili. Bakosalela bango matanga te, bakosangisa bango te mpo na kokunda bango.
Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye, asemboli loboko na Ye mpe abeti bango ; bangomba eningani, bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala. Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te, loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama.
Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.
Nakokanga yo bibende na mbanga, nakosala ete mbisi ya ebale na yo ekangama yo na poso ya nzoto ; nakobimisa yo na libanda ya bibale na yo elongo na mbisi oyo ekangami yo na poso ya nzoto.
Nakobwaka yo na esobe, yo mpe mbisi ya bibale na yo. Okokweya na mabele ya elanga ya polele ; bakolokota yo te, bakokunda yo te ; mpe nakokomisa yo bilei ya banyama ya mokili mpe ya bandeke ya likolo.
Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango.