31 Makelele ya makasi ekoyokana kino na suka ya mokili ; pamba te Yawe akosambisa bikolo, akosambisa bato nyonso, akobomisa bato mabe na mopanga, › » elobi Yawe.
Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko ? Te ! Koluka yango te ! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › »
Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu ; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto.
Efrayimi aliaka mopepe ; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.
Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;
Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.