Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:30 - Mokanda na Bomoi

30 Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango : ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye ! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:30
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki na Tsadoki : — Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango.


Yawe alobaki na ye : « Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai ; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso.


Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.


Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso ; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.


« Ezali Esika na ngai ya bopemi mpo na libela ; nakovanda awa, pamba te nasepelaki na yango.


Nzambe azali kati na yango, ebukani te ; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.


Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka, lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te, oyo ekangaka litoyi na yango,


Nkolo alamukaki lokola moto oyo awuti na pongi, lokola moto oyo abimi na kwiti ya vino ;


Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri mpo na vino ya Sibima. Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino ! Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino.


Kaka na lokito ya mongongo na Yo, bato bakimaka ; soki otelemi, bikolo epalanganaka.


Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; akoganga, solo ; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.


Kiti ya Bokonzi ya nkembo, oyo enetolama wuta na ebandeli ezali nde Esika na biso ya bule.


Lokola nkosi etikaka ndako na yango, mokili na bango mpe ekotikala lisusu na bato te likolo ya mopanga ya banyokoli na bango mpe likolo ya kanda ya Yawe.


Esengo mpe kosepela esili kolimwa na bilanga mpe na bazamba ya Moabi ; nakawusi vino kati na bikamolelo na bango, mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te. Atako bato bazali koganga kasi ezali makelele ya esengo te.


Bakolanda Yawe ! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.


Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.


Alobaki : Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.


Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?


Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.


Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ