Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:29 - Mokanda na Bomoi

29 Pamba te, botala ! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi ; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te ? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:29
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.


Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.


Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?


Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango ; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu.


Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.


Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi.


Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.


Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›


Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; nakozanga te kopesa yo etumbu. »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu ? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango !


To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi : ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba ! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango ;


Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango,


Nakobengisa mopanga mpo na kobundisa Gogi, na bangomba na Ngai nyonso, elobi Nkolo Yawe. Mopanga ya moto na moto ekoboma ndeko na ye.


Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.


Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule, ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso ; bakomela, bakomela lisusu koleka mpe bakosila lokola nde batikala kozala te.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?


Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ