Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:24 - Mokanda na Bomoi

24 bakonzi nyonso ya Arabi mpe bakonzi nyonso ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na esobe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:24
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge, mbongo ya mpako oyo bakonzi nyonso ya Arabi bazalaki kofuta, mpe oyo bayangeli ya bituka bazalaki kokongola kati na mokili ya Isalaele.


mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mpe mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge. Bakonzi nyonso ya Arabi mpe bayangeli ya bituka bazalaki komema wolo mpe palata epai ya Salomo.


Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi : Oh bino bato ya mombongo ya Dedani, bokolala na esobe ya Arabi.


bapaya nyonso oyo bavandaka kuna, bakonzi nyonso ya mokili ya Utsi ; bakonzi nyonso ya mokili ya Filisitia, ya Ashikeloni, ya Gaza, ya Ekroni mpe ya bato oyo batikalaki na Asidodi ;


Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango, bapaya nyonso oyo bazali sima na yango mpo ete bakoma lokola basi ! Mopanga, bebisa bomengo na yango mpo ete ekoma bomengo ya bitumba !


Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.


Kushi, Puti, Ludi, Arabi mobimba, Libi mpe bato ya mokili ya boyokani bakokufa na mopanga nzela moko na bato ya Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ