Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:21 - Mokanda na Bomoi

21 Edomi, Moabi, bato ya Amoni ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:21
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »


Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo, kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie.


Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi : « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo.


Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda.


mpe balobaki na ye : — Oyebi te ete Balisi, mokonzi ya bato ya Amoni, atindi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpo na koboma yo ? Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, andimelaki bango te.


Na tina ya Moabi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama ! Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango, ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.


Na tina na bato ya Amoni : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te ? Atikali lisusu na bakitani ya libula te ? Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, abotoli bingumba ya Gadi ? Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi ?


Na tina na Edomi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te ? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ? Boni, bwanya na bango esili penza ?


Mokili ya Edomi ezali kuna, bakonzi na yango mpe bakambi na yango balali esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga atako bazalaki na nguya ; balali esika moko na bato oyo bakatama ngenga te mpe bato oyo bakitaka na libulu.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi mpo na koyeisa mokili na bango monene.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Moabi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batumbaki mikuwa ya mokonzi ya Edomi mpe bakomisaki yango putulu.


Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ