Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:20 - Mokanda na Bomoi

20 bapaya nyonso oyo bavandaka kuna, bakonzi nyonso ya mokili ya Utsi ; bakonzi nyonso ya mokili ya Filisitia, ya Ashikeloni, ya Gaza, ya Ekroni mpe ya bato oyo batikalaki na Asidodi ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Arami : Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi.


Mwana na ye ya liboso, Utsi ; Buzi, ndeko na ye mobali ; Kemweli, tata ya Arami ;


Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. Bana mibali ya Arami : Utsi, Uli, Geteri mpe Mesheki.


Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.


Ezalaki lisusu na ebele ya bato oyo bakendeki na bango elongo ; bamemaki lisusu bibwele : bameme, bantaba mpe bangombe.


Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi ;


bakonzi nyonso ya Arabi mpe bakonzi nyonso ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na esobe ;


Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda.


Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango, bapaya nyonso oyo bazali sima na yango mpo ete bakoma lokola basi ! Mopanga, bebisa bomengo na yango mpo ete ekoma bomengo ya bitumba !


Edomi, mboka kitoko, movandi ya mokili ya Utsi, sepela, zala na esengo ! Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ; okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.


Kushi, Puti, Ludi, Arabi mobimba, Libi mpe bato ya mokili ya boyokani bakokufa na mopanga nzela moko na bato ya Ejipito.


Bato ya libota ya Yuda babotolaki lisusu Gaza, Ashikeloni mpe Ekroni, elongo na mabele na yango ya pembeni.


Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu : moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ