Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:18 - Mokanda na Bomoi

18 Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango ; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:18
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo ; makambo oyo olobaki na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.


Boye, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi, akomisaki bango eloko ya kobanga, ya somo mpe ya kotiola, ndenge bokoki komona yango na miso na bino.


Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Kasi tala, tozali lelo bawumbu ! Tozali penza bawumbu kati na mokili oyo opesaki na bakoko na biso mpo ete balia mbuma na yango mpe biloko mosusu ya kitoko oyo ebimaka kuna !


Oh Nzambe, obwakaki mpe opanzaki biso, osilikaki penza. Sik’oyo, zongisa biso.


akomisaka bakonzi ya mokili bato pamba, mpe bakambi na yango lokola biloko pamba.


Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; Nkolo Yawe akoboma bino ; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.


Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.


Yawe alobaki na ngai lisusu na mbala ya mibale :


« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi.


nakokomisa bango eloko ya koyoka somo mpe ya koyokela pasi, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; eloko ya kotiola, eloko ya kosakanela, eloko ya maseki, eloko ya lisuma, kati na bisika nyonso epai wapi nakobengana bango.


Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo.


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »


Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Ejipito ekotikala lisusu na bato te kati na mikili oyo etikala na bato te, mpe bingumba na yango ekokoma ebeba kati na bingumba oyo ebeba.


Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.


Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi, oyo batonga makasi. »


« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele ; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.


Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.


Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu.


Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ