Jeremi 25:17 - Mokanda na Bomoi17 Boye, nakamataki kopo yango na loboko ya Yawe mpe namelisaki yango bikolo nyonso epai wapi atindaki ngai : အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.