15 Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai : « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo.
Loboko na Yawe esimbi kopo oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo. Azali kosopa yango, mpe bato mabe nyonso ya mokili bazali komeka mpe komela yango kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.
Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi : « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.
Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, oyo balobaki na yo : ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! › Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »
« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.
Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko ? Te ! Koluka yango te ! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › »
« Bolangwisa ye masanga, pamba te abetaki tembe na Yawe ! Tala ye Moabi ndenge azali kobaluka kati na bisanza na ye ! Tika ete, ye mpe, akoma eloko ya maseki !
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Okomela kopo oyo ndeko na yo ya mwasi amelaki, kopo moko ya monene mpe ya mozindo ; ekomemela yo kosambwa mpe soni, pamba te ezali monene penza.
Nakokomisa Ejipito esobe kati na mikili oyo ekoma esobe, mpe bingumba na yango ekotikala lisusu na bato te, mibu tuku minei, kati na bingumba oyo ebeba. Nakopanza bato ya Ejipito kati na bikolo mpe nakopalanganisa bango na mikili mosusu.
tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : na zuwa na Ngai ya makasi, natombokeli bikolo oyo etikali mpe mokili mobimba ya Edomi, pamba te na esengo nyonso mpe na mayele mabe kati na mitema na bango, bakomisi mokili na Ngai lokola libula na bango moko mpo ete babotola bilanga na yango nyonso na makasi. ›
Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu ! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.
ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate.
Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe.