Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 25:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nakokokisa kati na mokili yango maloba nyonso oyo nalobaki mpo na kotelemela yango, maloba nyonso oyo ekomama kati na buku oyo, maloba oyo Jeremi asakolaki mpo na kotelemela bikolo nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 25:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.


Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.


— Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Koma kati na buku makambo nyonso oyo nayebisaki yo.


« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.


Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki : ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama ? ›


Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.


Parsin  : bokonzi na yo ekabwani mpe epesami epai ya bato ya Medi mpe ya Persi.


Bongo balobaki na ngai : « Osengeli lisusu kosakola na tina na bikolo ebele, mabota ebele, nkota ebele mpe bakonzi ebele. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ