Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 24:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kasi ndenge bambuma ya figi oyo ekawuka ezali mabe mpe bakoki kolia yango te, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe nakosala Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe batikali ya Yelusalemi, ezala ba-oyo batikali na mboka mpe ba-oyo bazali na Ejipito :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 24:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joziasi azalaki tata ya bana mibali oyo : Yoanani, mwana na ye ya liboso ; Yeoyakimi, ya mibale ; Sedesiasi, ya misato ; Shalumi, ya minei.


Nakendeki na Perati, nalukaki mokaba yango epai nabombaki yango ; kasi mokaba yango ebebaki makasi mpe etikalaki lisusu na tina te.


Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›


Kitunga moko ezalaki na bambuma kitoko ya figi lokola bambuma oyo etelaka liboso ; mpe kitunga mosusu ezalaki na bambuma ekawuka oyo bakoki kolia te.


— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Ndenge bambuma kitoko oyo ya figi ezali, ndenge wana mpe nazali komona bato ya Yuda oyo natindaki na bowumbu, longwa na esika oyo kino na Babiloni.


Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »


Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.


Tango Jeremi asilisaki koloba na bato maloba nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, maloba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye koyebisa bango,


Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ