8 kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »
Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
kasi bakokoma koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na mokili ya nor mpe na mikili nyonso epai wapi abenganaki bango. › Nakozongisa bango na mokili na bango, mokili oyo napesaki bakoko na bango.
Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu ! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.
Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›
Nkolo Yawe alobi : Tango nakosangisa bana ya Isalaele wuta na bikolo epai wapi napanzaki bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo wana ; boye, bakovanda na mokili na bango moko, mokili oyo napesaki epai ya Jakobi, mosali na Ngai.
Nakobimisa yango wuta na bikolo epai wapi ezali ya kopanzana, nakosangisa yango wuta na mikili mosusu mpe nakozongisa yango na mabele na yango moko ; nakoleisa yango na likolo ya bangomba ya Isalaele, kati na mabwaku mpe kati na bamboka nyonso ya mike ya Isalaele.
Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango ; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna.
Na tango wana, nakosangisa bino, nakozongisa bino na mokili na bino. Nakopesa bino lokumu mpe nakosala ete sango na bino epanzana kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino, oyo bakendeki na bowumbu, » elobi Yawe.