7 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; ›
Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo : nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;
« Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango ; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele.
Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »
Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama ; pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi, ekozala na bato oyo bakobika, kolanda ndenge Yawe alobaki, mpe bato oyo Yawe akobenga bakozala kati na bato oyo bakobika.
Nakomonisa yo makambo ya kokamwa lokola na tango obimaki na Ejipito.