Jeremi 23:40 - Mokanda na Bomoi40 nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›
Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule ! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso.