39 mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino ;
« Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? › Loba na ye : ‹ Yawe alobi nini ? Nakosundola bino, elobi Yawe. ›
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »
Nakopesa ye, bana na ye mpe basali na ye nyonso etumbu mpo na mabe na bango ; nakotindela bango elongo na bavandi ya Yelusalemi mpe ya Yuda, pasi nyonso oyo nalakaki bango, mpo ete bayokaki Ngai te. »
Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
makambo oyo nasalaki na Silo, nakosala yango mpe sik’oyo na Ndako na Ngai, na Tempelo oyo bozali kotiela motema, esika oyo napesaki bino elongo na batata na bino.
Loba na yango : Oh bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba milayi, na bangomba mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Namibongisi mpo na kotindela bino mopanga mpe kobebisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba.
Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »
Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.