Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 23:36 - Mokanda na Bomoi

36 Kasi bosengeli lisusu te koloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 23:36
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. »


Bato nyonso bazali kokosana bango na bango, bazali kolobana maloba ya sukali, kasi mitema na bango ezali sembo te.


Yo, lolemo ya lokuta, Yawe akopesa yo nini, akofuta yo nini ?


mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango ! Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso. Bokumisa Yawe !


Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata ; ekozwa mpe ekozokisa bango.


Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.


Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.


Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana : ‹ Eyano nini Yawe apesi yo ? › to ‹ Yawe alobi nini ? ›


Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba ; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te : masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !


Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki.


Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.


— Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


pamba te moto na moto akosamba mpo na misala na ye moko.


Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi ?


pamba te bango moko bazali kotatola ndenge nini boyambaki biso mpe ndenge nini botikaki kosambela banzambe ya bikeko mpo na komipesa na Nzambe mpe mpo na kosalela Nzambe na bomoi mpe ya solo,


Azali kokoma bongo kati na mikanda nyonso epai wapi azali kolobela makambo yango. Kati na mikanda yango, ezali na makambo mosusu ya makasi mpo na kososola ; bongo bato oyo bazangi boyebi mpe balendisama malamu te na kondima bazali kobongola ndimbola na yango, ndenge kaka bazali mpe kobongola ndimbola ya biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko.


Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?


Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ