33 « Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? › Loba na ye : ‹ Yawe alobi nini ? Nakosundola bino, elobi Yawe. ›
Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino !
Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.