Jeremi 23:32 - Mokanda na Bomoi32 « nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.