Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 23:30 - Mokanda na Bomoi

30 « Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 23:30
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango ;


Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ? Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’


« solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe,


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda.


Ekozala elembo ete nakopesa bino etumbu na esika oyo, » elobi Yawe, « mpo ete boyeba solo ete pasi oyo nalakaki bino ekokokisama kaka. »


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli basinga na bino ya maji, oyo bozali kosalela mpo na kotiela bato na Ngai mitambo lokola bandeke, nakokata-kata yango mpe nakolongola yango na maboko na bino ; mpe nakokangola bomoi ya bato oyo bokangaki na mitambo lokola bandeke.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpo ete bolobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta, Ngai moko natelemeli bino, elobi Nkolo Yawe.


Nakotelemela bango penza ; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu :


Ngai nakotombokela moto yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye, pamba te abonzaki mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpo na kokomisa mbindo Esika na Ngai ya bule mpe mpo na kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai.


Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.


Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.


Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.


pamba te miso ya Nkolo etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka losambo na bango. Kasi Nkolo apesaka bato mabe mokongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ