Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 23:28 - Mokanda na Bomoi

28 Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 23:28
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Mishe azongisaki : — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba.


Kasi mokonzi alobaki na ye : — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?


Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.


Oh bato na ngai, babeti bino ndenge batutaka ble na libanda ! Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya Nzambe ya Isalaele.


« Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! ›


Mosakoli Jeremi alobaki na bango : — Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.


Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.


Kufa emati mpe ekoti na nzela ya maninisa na biso, ekoti kino na bandako na biso, oyo batonga makasi ; eyei kosilisa koboma bana na babalabala, mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basakoli ya bazoba, oyo balandaka makanisi ya mitema na bango moko ! Nzokande bamonaki eloko moko te.


Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?


Nkolo azongisaki : — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?


Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.


Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.


Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ