Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 23:27 - Mokanda na Bomoi

27 Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 23:27
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki ; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.


Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.


Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge.


Kasi Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye), atelemelaki bango mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli.


Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo.


sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu,


Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.


Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ