Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 23:21 - Mokanda na Bomoi

21 Natindaki basakoli wana te, kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ; nalobaki na bango likambo moko te, kasi tala bango wana bazali kosakola !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 23:21
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba : — Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ? Nazongisaki : — Ngai oyo, tinda ngai !


Yawe alobaki na ngai : — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.


« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.


Boyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino : ‹ Bokosalela mokonzi ya Babiloni te ! › Bazali kosakola makambo ya lokuta.


Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. »


Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania : « Anania, yoka ! Yawe atindi yo te ; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta !


« Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami : Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta,


Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.


Pamba te bazali nde kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai ; natindi bango te, » elobi Yawe.


Yesu alobaki na bango lisusu : — Tika ete kimia ezala na bino ! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino.


Na etinda ya Molimo Mosantu, Barnabasi mpe Saulo bakendeki na Selesi ; mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre.


Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te ? Kolanda ndenge ekomama : « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ