20 Kanda ya Yawe ekokita te kino ekokokisa malamu-malamu penza mabongisi ya motema na Ye ! Bokozwa mayele ya kososola yango malamu na mikolo oyo ekoya.
mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi : ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; ›
ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
Botelemisa bendele na bino liboso ya bamir ya Babiloni ! Bobakisa motango ya bakengeli mpe ya basinzili, botia mitambo ! Yawe akokokisa mabongisi na Ye mpe ekateli ya etumbu na Ye mpo na bato ya Babiloni.