Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 23:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki ! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 23:19
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.


tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino.


Ndenge mbonge elekaka, ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te, kasi moto ya sembo akotikala lokola moboko mpo na libela.


Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene : Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi, monguna moko azali koya wuta na esobe, wuta na mokili moko ya somo.


Tango nanu batiami kutu na mabele te, nanu balonami kutu te, mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te, afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki, bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka.


Makelele ya makasi ekoyokana kino na suka ya mokili ; pamba te Yawe akosambisa bikolo, akosambisa bato nyonso, akobomisa bato mabe na mopanga, › » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tala ! Pasi ezali kopanzana longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu ; mopepe makasi etelemi longwa na basuka ya mokili. »


Tala, mopepe ya Yawe etomboki, kanda makasi na Ye epeli, bakake ezali konguluma na likolo, mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe.


Kanda makasi ya Yawe ekozonga te kino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye. Bokososola yango penza na mikolo ekoya.


Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi : « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai ; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, nakotinda mopepe ya makasi mpo na kobebisa mokili ya Babiloni mpe bato ya Lebi-Kamayi.


Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.


Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.


Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »


Yawe akomimonisa epai na bango, mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali. Nkolo Yawe akobeta kelelo mpe akotambola kati na mopepe makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ