Jeremi 23:13 - Mokanda na Bomoi13 « Namoni makambo ya nkele kati na basakoli ya Samari : bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te, akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te, pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe, bazali kosala mabe, mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.