Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.
« Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.
Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso ; tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama ! Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki, tango mpo na bango ya kozwa etumbu.
Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.
Oh Yawe, tala mpe mona ! Nani oyo osalela makambo ya boye ? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli ? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo ?
Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.
Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.