Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 23:1 - Mokanda na Bomoi

1 « Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 23:1
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te bakambi bazangaki mayele, balukaki Yawe te ; yango wana, balongaki te, mpe bato nyonso oyo bango bazalaki kokamba bapanzanaki.


Babateli ebele ya bibwele babebisi elanga na ngai ya vino, banyati-nyati elanga na ngai, babongoli elanga na ngai ya kitoko mabele ya kokawuka.


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele : bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.


Banganga-Nzambe bamitunaki te mpo na koluka koyeba : ‹ Yawe azali wapi ? › Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, bakambi batombokelaki Ngai ; basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso mpe baninga na yo bakokende na bowumbu. Okoyoka soni mpe okosambwa likolo ya mabe na yo nyonso.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,


Bato na Ngai bazalaki lokola bameme oyo ebungi nzela ; babateli na bango babungisaki bango nzela, basalaki ete bayengayenga na bangomba, batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse mpe babosana lopango na bango ya kopemela.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basakoli ya bazoba, oyo balandaka makanisi ya mitema na bango moko ! Nzokande bamonaki eloko moko te.


Lokola bosalelaki mipanzi mpe mapeka na bino mpo na kotindika bibwele oyo ekonda, mpe maseke na bino mpo na kobundisa yango kino kopanza yango na libanda,


Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato ; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › »


Bingumba oyo ebebisama ekotonda lisusu na bato ebele lokola bibwele oyo bapesaka na mbeka, lokola bibwele oyo bamemaka na Yelusalemi na tango ya bafeti oyo ekatama. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli, mpe nakopesa bakambi etumbu, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda ; akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba.


Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.


Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.


Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.


Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango.


Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi ; bameme eyokelaki bango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ