Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo : ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye ? Mabe nini tosalaki Ye ? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso ? ›


Tango mokonzi ya bakengeli ya mokonzi amemaki Jeremi, alobaki na ye : — Yawe, Nzambe na yo, asilaki kokata ete pasi oyo ekokweya na esika oyo ;


mpe sik’oyo akokisi yango, asali ndenge kaka akanaki kosala. Makambo oyo nyonso esalemi mpo ete bino, bato, bosalaki masumu liboso ya Yawe mpe batosaki Ye te.


Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili bandimaki te ete banguna mpe bayini bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.


Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Solo, bokobondisama tango bokomona bizaleli mpe misala na bango ; pamba te bokososola ete ezali na pamba te nde nasalaki makambo oyo nyonso kati na Yelusalemi, elobi Nkolo Yawe. »


Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga.


Okozala likambo ya soni, ya kotiola, ya liseki mpe ya soni makasi na miso ya bikolo oyo ezingeli yo, tango nakopesa yo etumbu na kanda mpe na kotomboka na Ngai ya makasi penza. » Ngai Yawe nde nalobi.


Nkolo, ozali sembo ; kasi biso, lelo, tolatisami na soni : bato ya Yuda, bavandi ya Yelusalemi mpe bana nyonso ya Isalaele, ezala ba-oyo bazali pembeni to ba-oyo bazali mosika, kati na mikili nyonso epai wapi opanzaki biso mpo ete tozangaki boyengebene liboso na Yo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ