Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nakotinda bato ete baya kobebisa yo, moto na moto na bibundeli na ye ; bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitoko mpe bakobwaka yango na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko ;


Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango ; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.


Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, elobi Yawe, nakopelisa moto na zamba na yo, mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »


Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo : ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.


Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele !


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ