Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:6 - Mokanda na Bomoi

6 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda : « Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai, lokola songe ya ngomba ya Libani ; solo, nakokomisa yo lokola esobe, lokola engumba oyo bato bavandaka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:6
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.


kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.


Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko, ozali penza kitoko makasi ! Miso na yo, na se ya vwale, elala lokola ebenga ; suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi oyo ekitaka na ngomba Galadi.


Makolo na ye ezali lokola makonzi ya mabanga ya marbre oyo evandi likolo ya moboko ya wolo ya peto. Azali lokola bangomba ya Libani, kitoko lokola banzete ya sedele ya Libani.


Engumba ya makasi etikali pamba lokola lopango oyo basundola, babosana mpe etikala pamba lokola esobe ; mwana ngombe ya mobali ekokoma kolia mpe kolala kuna, bongo ekolia ata makasa ya bitape na yango.


Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko ;


Boye nalobaki : — Oh Nkolo, kino tango nini ? Azongisaki : — Kino bingumba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te, kino tango bato bakotikala lisusu na bandako te, mpe bilanga ekobebisama mpe bakosakanela yango ;


Loba na libota ya mokonzi ya Yuda : ‹ Boyoka Liloba na Yawe !


Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, elobi Yawe, nakopelisa moto na zamba na yo, mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »


Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka.


« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›


Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ; mokili mobimba ekufi. Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.


Nkosi moko ebimi na ndako na yango ; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.


mama na bino akoyoka soni makasi ; ye oyo abotaki bino akosambwa. Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.


Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.


Boni, kisi ezali te kati na Galadi ? Minganga bazali kuna te ? Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ?


Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye ? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te ? »


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele !


Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele.


Nabondeli Yo, yokela ngai mawa mpo ete nakatisa Yordani mpo namona mokili oyo ya kitoko na ngambo mosusu, etuka kitoko ya bangomba mpe Libani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ