Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:3 - Mokanda na Bomoi

3 tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:3
49 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai : ‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,


bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.


ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike.


Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye, bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.


Boyembela Nzambe, boyemba banzembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. Bofungola nzela mpo na Ye oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe. Kombo na Ye ezali Yawe. Botonda na esengo liboso na Ye.


bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.


Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.


bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike ;


Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.


Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango.


Kozongisa te na sima mondelo ya kala mpe kokota te na bilanga ya bana bitike,


Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,


Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.


Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.


Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala ? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga ? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?


Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,


Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »


Bakoma kitoko mpe ngebungebu ; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te.


Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo : Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai ; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo.


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :


tango banyokolaka moto kati na kosambisama, boni, Nkolo amonaka yango te ?


anyokolaka mobola mpe moto oyo akelela, ayibaka, azongisaka te eloko oyo akangi na niongo epai ya mokolo na yango, atalelaka banzambe ya bikeko, asalaka makambo ya mbindo,


anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu ;


Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi ! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe.


Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo.


Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.


Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo ndenge ebale etiolaka, mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.


Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »


Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba.


Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga.


Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.


Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango : bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.


« Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ