23 Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !
Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ? Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda : « Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai, lokola songe ya ngomba ya Libani ; solo, nakokomisa yo lokola esobe, lokola engumba oyo bato bavandaka te.
Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba : ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, pamba te babebisi nzela na bango mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.
Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga ! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.
Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpongo moko ya monene oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami, na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge, ekendeki kotelema na Libani. Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele,
Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.
Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te ! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.