Jeremi 22:21 - Mokanda na Bomoi21 Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia kasi olobaki : ‹ Nakoyoka te ! › Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo, otosaka na yo Ngai te ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.
Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.
Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.