Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:2 - Mokanda na Bomoi

2 ‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome ! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore !


Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe !


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi : « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »


Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.


Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo :


Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango.


Yango wana, boyoka Liloba na Yawe, bino bawumbu nyonso oyo natindaki na Babiloni longwa na Yelusalemi.


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : kende koloba na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nasengeli kokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobebisa yango na moto.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi ; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu.


« Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.


Mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe :


Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! »


Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ