Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bakokunda ye ndenge bakundaka ane, bakobenda ye mpe bakobwaka ye libanda ya bikuke ya Yelusalemi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:19
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, nakoyeisa pasi na ndako ya Jeroboami, nakosilisa koboma mibali nyonso kati na ndako ya Jeroboami, ezala mowumbu to monsomi kati na Isalaele ; nakokomba ndako ya Jeroboami ndenge bakombaka matiti ya mbindo, kino nyonso penza ekosila.


Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Zebuda. » Zebuda azalaki mwana ya Pedaya, moto ya Ruma.


Tango Yeoyakimi akufaki, Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Kasi tango babimaki mpo na kokunda ye, bakutaki kaka mokuwa ya moto na ye, makolo mpe matandu ya maboko na ye.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.


Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;


Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe : « mopanga, mpo na koboma bango ; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango ; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi ; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu.


Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Bongo bato ya bituka ya zingazinga, longwa na bikolo na bango, bayaki kotelemela yango, batielaki yango mitambo na bango mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango.


Okokweya solo na zamba, pamba te ezali Ngai nde nalobaki, elobi Nkolo Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ