Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:18 - Mokanda na Bomoi

18 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : « Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali ! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! › Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, nkolo na ngai ! Mawa, mokonzi na ngai ! ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:18
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, nazali na pasi na motema mpo na yo ! Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo ya mwasi !


Atiaki ebembe kati na kunda na ye moko mpe ayembelaki ye nzembo oyo ya mawa : — Ah, mawa, ndeko na ngai !


Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Zebuda. » Zebuda azalaki mwana ya Pedaya, moto ya Ruma.


Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko.


Tango Yeoyakimi akufaki, Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Joziasi azalaki tata ya bana mibali oyo : Yoanani, mwana na ye ya liboso ; Yeoyakimi, ya mibale ; Sedesiasi, ya misato ; Shalumi, ya minei.


Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.


Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye.


« Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »


« ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango.


Loba na libota ya mokonzi ya Yuda : ‹ Boyoka Liloba na Yawe !


Bolela te mpo na kufa ya mokonzi to bosala matanga te mpo na kufa na ye ! Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu, mpo ete akozonga lisusu te mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye.


Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. »


kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : ‘ Oh mawa, nkolo na ngai ! ’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › »


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi ; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ