13 « Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya bosembo te, mpe bashambre na ye ya etaje, na nzela ya lokuta ; oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba mpe afutaka bango eloko te ;
Mokonzi ya Ejipito akomisaki Eliakimi, ndeko mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Yelusalemi mpe ya Yuda ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi Neko akangaki Yoakazi, ndeko mobali ya Yeoyakimi, mpe amemaki ye na Ejipito.
Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, elanga pembeni ya elanga, kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili !
Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : « Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali ! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! › Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, nkolo na ngai ! Mawa, mokonzi na ngai ! ›
« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.