11 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te.
Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido.
Basoda ya Joziasi bamemaki ebembe na ye na likolo ya shar, longwa na Megido kino na Yelusalemi epai wapi bakundaki ye kati na kunda na ye moko. Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, bapakolaki ye mafuta mpe bakomisaki ye mokonzi mpo na kokitana na tata na ye.
Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
Faraon Neko akomisaki Eliakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi mpo na kokitana na Joziasi, tata na ye ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi akangaki Yoakazi mpe amemaki ye na Ejipito. Mpe Yoakazi akufaki kuna.
Kati na bakambi ya Efrayimi, bamosusu batelemelaki ba-oyo bawutaki na bitumba. Ezalaki Azaria, mwana mobali ya Yoanani ; Berekia, mwana mobali ya Meshilemoti ; Ezekiasi, mwana mobali ya Shalumi ; mpe Amasa, mwana mobali ya Adilayi.
Ilikia elongo na bato oyo mokonzi aponaki bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tokeati, mwana mobali ya Asira, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, na etuka ya sika. Balobaki na ye ndenge bayokanaki.
Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi :