Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 22:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bolela te mpo na kufa ya mokonzi to bosala matanga te mpo na kufa na ye ! Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu, mpo ete akozonga lisusu te mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 22:10
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.


Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido.


Mokonzi ya Ejipito akomisaki Eliakimi, ndeko mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Yelusalemi mpe ya Yuda ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi Neko akangaki Yoakazi, ndeko mobali ya Yeoyakimi, mpe amemaki ye na Ejipito.


Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala bazali na bango kutu malamu koleka bato oyo bazali nanu na bomoi.


Moto ya sembo azali kokufa, kasi ezali kosala ata moto moko te motema pasi ; bato ya malamu bazali kosila, mpe ata moto moko te azali kososola ete bato ya sembo bazali kolongolama mpo ete bazala mosika na mabe.


Moto moko te akopesa bilei mpo na kobondisa bato oyo bazali na matanga sima na kufa, mpe moto moko te akopesa bango masanga mpo na kobondisa bango, ezala ata mpo na kufa ya batata to ya bamama na bango.


Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : « Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali ! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! › Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, nkolo na ngai ! Mawa, mokonzi na ngai ! ›


Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. »


« Boye loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. ›


Nakozongisa lisusu na esika oyo : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›


Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. »


Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamu koleka ba-oyo bakufi na nzala : banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala, mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.


« Mwana na moto, nakolongola, na nzela ya kufa ya pwasa, mwasi oyo asepelisaka motema na yo. Kasi komitungisa te, kolela te mpe kotangisa mpinzoli te.


Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki : — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ