Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola.
‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : kende koloba na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nasengeli kokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobebisa yango na moto.
Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.