Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 21:7 - Mokanda na Bomoi

7 Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 21:7
37 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.


Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »


Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.


Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa ? Nani akolela yo ? Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo ?


Mama ya bana sambo akolemba nzoto mpe akopema na pasi makasi. Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela : akoyokisama soni mpe akosambwa. Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi liboso ya banguna na bango, » elobi Yawe.


Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.


Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni.


Sik’oyo, Ngai, nakabi mikili oyo nyonso na maboko ya mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; nakabi mpe na maboko na ye ata banyama ya zamba mpo ete etosa ye.


Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akolonga te kokima liboso ya bato ya Babiloni, kasi nakokaba ye solo na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akolobana na ye mpe akotalana na ye na elongi ;


Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye ; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni.


Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki : ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama ? ›


Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.


Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda : Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele ; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.


Oh Yawe, tala mpe mona ! Nani oyo osalela makambo ya boye ? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli ? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo ?


Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti, ndenge wana mpe obengisaki pasi wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe. Na mokolo ya kanda ya Yawe, moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi. Monguna na ngai abebisi bato oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.


Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kokaba yo na maboko ya bato oyo oyinaka, bato oyo osepelaka lisusu na bango te.


Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka.


Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »


Yango wana, Ngai mpe nakotala bango na liso ya mawa te mpe nakobikisa bango te. Kasi nakotanga mabe na bango na mito na bango.


Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ