Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 21:4 - Mokanda na Bomoi

4 ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 21:4
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eloko kaka bokotikala na yango : kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.


Boyoka makelele likolo ya bangomba : ezali lokola makelele ya bato ebele ! Boyoka lokito ya makelele ya bikolo : ezali lokola bikolo esangana esika moko ! Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali kotala mampinga ya basoda oyo bazali pene ya kokende na etumba.


Sik’oyo, nakoloba na bino makambo oyo nakosala na elanga na ngai ya vino : Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama ; nakotobola madusu kati na bamir na yango, mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.


Kasi Jeremi azongiselaki bango : « Boloba na Sedesiasi :


Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba ! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.


Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, abwakaki ye kuna na koloba : « Mpo na nini ozali kosakola na maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobotola yango ;


akomema Sedesiasi na Babiloni, akowumela kuna kino tango nakotala likambo na ye, elobi Yawe, soki bomeki kobundisa bato ya Babiloni, bokolonga te. › »


kati na etumba na bato ya Babiloni : ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »


Bakalaka nyonso ya mokonzi ya Babiloni bakotaki kati na engumba mpe bayaki kovanda na Ekuke ya kati-kati. Ezalaki Nerigali-Saretseri, Samigari-Nebu ; Sarisekimi, mokonzi ya bakalaka ya lokumu ; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi mosusu ya basoda ya mokonzi ya Babiloni.


Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo : basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo.


Na kanda makasi na Ye, abukaki Isalaele maseke nyonso, alongolaki loboko na Ye ya mobali na likolo na yango tango monguna na bango azalaki kopusana ; apelisaki moto kati na mokili ya Jakobi lokola moto makasi oyo etumbaka biloko nyonso na bangambo na yango nyonso.


Yawe akomi lokola monguna : abebisi mokili ya Isalaele, abebisi bandako nyonso ya mokonzi ya Isalaele, abuki bandako na yango batonga makasi, atondisi matanga mpe kolela kati na Yuda, mboka kitoko.


Yawe abwaki etumbelo na ye, asundoli esika na ye ya bule mpe akabi na maboko ya monguna bamir mpe bandako ya mokonzi na yango. Bato bagangi makasi kati na Tempelo ya Yawe ndenge bagangaka na mokolo ya feti oyo ekatama.


Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali.


Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !


Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ