Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 21:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, elobi Yawe, nakopelisa moto na zamba na yo, mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 21:14
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batumbaki na moto Tempelo ya Nzambe, babukaki mir ya Yelusalemi, batumbaki na moto bandako na yango ya kitoko mpe babebisaki biloko nyonso ya motuya.


bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.


Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.


Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.


Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotindela basoda na ye ya mbinga bokono oyo ekondisaka nzoto. Na se ya nkembo na Ye, bakopelisa moto lokola fulu ya moto.


Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na mampinga ya lola kuna na likolo, mpe na bakonzi ya mokili na se.


Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko ;


Yawe azalaki kobenga yo « Nzete ya olive ya mobesu oyo etonda na mbuma kitoko. » Kasi Yawe akotumba yango na makelele ya mopepe makasi, mpe bitape na yango ekobukana-bukana.


yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi.


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »


Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo :


Nakotinda bato ete baya kobebisa yo, moto na moto na bibundeli na ye ; bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitoko mpe bakobwaka yango na moto.


mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.


Bakokata banzete nyonso ya zamba na yango, » elobi Yawe, « ata soki ezali na banzete ebele. Bazali ebele koleka mabanki, bakokoka kotanga motango na bango te.


Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya, mpe moto moko te akoya kosunga yango ; nakopelisa moto kati na bingumba na yango, mpe moto yango ekozikisa bato nyonso oyo bazingeli yango. ›


Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.


Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.


Epepelo ezali kopelisa moto makasi, mpe ebende oyo babengaka plon ezali kolimwa na moto ; kasi bazali na bango kaka konyangwisa ebende yango na pamba, pamba te eloko ya mabe ekokabwana na yango te.


bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »


Na kanda makasi na Ye, abukaki Isalaele maseke nyonso, alongolaki loboko na Ye ya mobali na likolo na yango tango monguna na bango azalaki kopusana ; apelisaki moto kati na mokili ya Jakobi lokola moto makasi oyo etumbaka biloko nyonso na bangambo na yango nyonso.


Loba na zamba ya mokili ya sude : ‹ Yoka Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa moto kati na yo, mpe ekotumba banzete na yo nyonso, ezala banzete ya mobesu to ya kokawuka. Moto yango ya makasi ekotikala kokufa te mpe ekotumba bilongi nyonso, wuta na nor kino na sude.


Mokili ekobebisama likolo ya bato wana, likolo ya bizaleli na bango ya mabe.


Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ