Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 20:8 - Mokanda na Bomoi

8 Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 20:8
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye ; bazalaki koloba : « Moto na libandi, longwa awa ! Moto na libandi, longwa awa ! »


Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.


Bozali koseka nani ? Bozali kofungolela nani monoko ? Bozali kotiela nani penza monoko ? Boni, bozali bana ya batomboki te, bozali libota ya lokuta te ?


Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.


Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te ! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo !


Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »


Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, mpe nakosamaki penza ; olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, bato nyonso bazali kaka koseka ngai.


Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi ;


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


Yango wana, nkosi moko ekobima wuta na zamba mpe ekoboma bango ; mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe mpe ekopasola bango ; nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, pamba te botomboki na bango ezali monene mpe lokuta na bango eleki mingi.


Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani ? Nani akoyokela ngai ? Matoyi na bango ekangama ; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


Mpo na nini ozali kolakisa ngai makambo mabe ya boye ? Mpo na nini ozali kosala eloko moko te ? Liboso na ngai, nazali kaka komona libebi mpe makambo mabe, bato bazali kaka koswana mpe kofundana.


Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu : — Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso !


pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.


Boye, biso mpe tokende epai ya Yesu na libanda ya molako, na kondima koyoka soni oyo Ye ayokaki ;


Soki bafingi bino likolo ya Kombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, pamba te Molimo ya nkembo, Molimo ya Nzambe, azali likolo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ